Psalms 71

Nzambe, kotika ngai te kati na kimobange na ngai


1 Kati na yo, Yawe, nabombamaki ;
kotika ngai nayoka soni te ata moke te.

2 Kangola ngai mpe bikisa ngai
kati na bosembo na yo ;
balusa litoyi na yo epai na ngai
mpe bikisa ngai.

3 Zala libanga oyo ebombaka ngai,
esika nakoki kokende tango nyonso.
Pesa mitindo mpo na kobikisa ngai ;
pamba te, yo ozali libanga na ngai
mpe ndako makasi na ngai

4 Kangola ngai, Nzambe na ngai,
na loboko ya moto na mabe,
na maboko ya bato oyo basalaka mabe mpe ya bato ya kanda.

5 Pamba te, ozalaki elikya na ngai,
Yawe, ye oyo asalaka oyo alingi,
elikya na ngai banda bolenge na ngai

6 Wuta na mbotama
natiaka motema na ngai epai na yo ;
obimisaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai ;
nakosanzola yo tango nyonso.

7 Nakomi lokola eloko ya pamba epai ya bato ebele ;
kasi yo ozali ebombelo na ngai ya makasi.

8 Monoko na ngai etondi na masanzoli na yo,
kosakola kongenga na yo mokolo mobimba.

9 Kobwaka ngai te tango nakomi mobange
kotika ngai te tango makasi na ngai ebandi kosila,

10 Pamba te banguna na ngai bazali koloba mabe
mpo na ngai ;
baoyo bazali koluka koboma ngai,
elongo bazali kosala likita.

11 Bazali koloba :
“Nzambe atiki ye ;
bolanda ye mpe bokanga ye,
pamba te moto ya kokangola ye azali te !”

12 kozala mosika na ngai te, Nzambe ;
yaka noki Nzambe na ngai, kosalisa ngai !

13 Tika ete baoyo bazali kofunda ngai,
babeba na soni ;
tika ete baoyo bazali koluka ete namona pasi,
basambwa mpe lokumu na bango esila.

14 Kasi ngai,
nakotia elikya tango nyonso ;
na kosanzola yo mbala na mbala.

15 Monoko na ngai ekolobela bosembo na yo
lobiko na yo mokolo mobimba ;
pamba te, nakoki kotanga yango te.

16 Nkolo Yawe,
nakoya mpe nakosakola misala na yo ya nguya,
Yawe, yo osalaka oyo yo olingi ;
nakosakola bosembo na yo,
ya yo moko kaka.

17 Wuta bolenge na ngai, Nzambe,
oteyaki ngai ;
mpe kino lelo oyo, nazali kosakola misala na yo ya kokamwa.

18 Ata tango, nakomi mobange
mpe suki na ngai ekomi pembe,
kotika ngai te, Nzambe,
mpo nakoka koyebisa nguya na yo na bato ya tango ekoya,
makasi na yo na bato nyonso oyo bakoya sima.

19 Bosembo na yo ekoma kino na likolo, Nzambe,
yo moto osala makambo ya minene penza.
Nani Nzambe, akokani na yo ?

20 Ata olakisaki ngai minyoko mingi mpe ya bololo
Okozongisela ngai bomoi lisusu ;
wuta na se penza ya mabele. Yo okobimisa ngai lisusu.

21 Okobakisa lokumu na ngai,
mpe okolendisa ngai lisusu.

22 Nakosanzola yo na gitare
mpo na boyengebene na yo, Nzambe na ngai
nakoyemba masanzoli mpo na yo na lindanda, Mosantu ya Isayele,

23 Bambebo na ngai ekoganga na esengo
tango nakoyembela yo masanzoli ;
ngai oyo yo, okangola

24 Lolemo na ngai ekosakola misala na yo ya bosembo
mokolo mobimba ;
pamba te, baoyo bazali koluka ete namona pasi,
bakoyoka soni mpe bakosambwa.
Copyright information for LinMNB